PHOTO. LA VDC.
Mokolo ya poso 30 juillet 2011 na ngonga 17h30, Étienne Tshisekedi, mokambi ya parti politique UDPS pe candidat na maponami ya 28 novembre po na ebonga ya kimokonzi ya mboka, apesaki meeting monene na Lubumbashi, province ya Katanga.
Merci mingi na ndeko Marcel Ngoy ya Congonetradio na Japon ndenge atyaki discours wana na site na ye : http://www.congonetradio.com . Oyo nyonso tokomi, toyokaki yango na site naye.
Bokutani wana, bolekaki ndenge nini ?
Lokola mokolo Etienne Tshisekedi anyataki mabele ya bakoko na biso, na bozongi poto koleka na mboka ya Mandela,bato ebele penza bayaki koyoka mokonzi ya UDPS.
Po na ko banda, Ya Tshitshi apesaki nano merci mingi na bana Katanga na Swahili:
« Watoto wapenzi wa Katanga,
Wandugu wapenzi,
Wa baba,
Wa mama,
Amujambo,
Tunemupikiya aksanti sana
Namuna munetupokeya
Muke wango
Na mimi peke
Na wa fwazi wango”
Sima nango nde abakisaki na lingala ti na suka.
“Bana Katanga boye koyamba ngayi.
Ezali kolakisa ke bana Katanga balingi changement.
Ezali kolakisa ke bana Katanga bazokoyoka eloko moko na bana Congo mobimba.
Mboka Congo ekufi.
Moko na bino a’komituna ndenge nini toko bikisa mboka Congo.
Mpo to bikisa mboko Congo,
Ezali eloko moko :
Il faut bolingo ya Congo,
Bolingo ya ndeko nayo Congolais.
Yango wana tango bokopona ngai,
Banda le 6 décembre prochain, nakozala na message moko na mboka Congo mobimba.
Message Kombo na yango bolingo…
« Democratie. Eza eloko nini?
…
Oyo boyokaka democratie eza na lopoto.
La cogestion du Congo par les congolais…
Elingi koloba,
Que moko na moko ya biso azali responsable ya kobikisa Congo…
Moko na na moko na biso azali ministre ya Congo.”
Etienne Tshisekedi alobelaki makambo nyonso oyo etungisaka bana mboka :
- maponami,
- kimuyibi ya bato oyo baza nano kokamba mboka,
- Nzela oyo akolanda soki aponami : ba hôpitaux...
Po na kolakisa ke ye aza démocrate pe abangaka mituna te, bapesaki liloba epesamaki na bana mboka.
Mwa mituna ezalaki : chômage, tribalisme, sort ya basali ya kala ya Gécamines, soki Akoki kosala na Moïse Katumbi, justice…
Po na mokonzi ya MLC, Jean-Pierre Bemba oyo akangami na La Haye ti lelo, Étienne Tshisekedi alobaki que soki ye aleki, soki le 1er janvier 2012 J-P Bemba aza kaka na boloko ya bapaya, akosenga basongisela biso ndeko mpo asamba na justice na biso.
Étienne Tshisekedi apresentaki pe délégation na ye : Mama Marthe, Valentin Mubake, Félix Tshisekedi, Jacquemin Shabani, Rémy Masamba…
Mpo na mikolo ekoya délégation ya UDPS ekokende :
Lundi 1er na Kasumbalesa,
Mardi 2 na Kipushi
Mercredi 3, na Likasi,
Vendredi 5 na Kolwezi
Samedi 6 bozongi na Lubumbashi.
Lundi 8 nde bozongi na Kinshasa.
Po na kosilisa, Étienne Tshisekedi apesaki lisusu merci Mingi na Bana Katanga.
Longonya na UDPS/Katanga. Mibali ya solo, Bilombe : mobilisation de bouche à oreille kaka.
Oyo bakinisaki ke Katanga ezali chasse gardeé ya... Wana ebandeli ya kozinda te? Tsunami politique te?
Cheik FITA
Bruxelles, 31 juillet 2011