Mwana mboka Léonard Mulopo, Conseiller chargé ya mobilisation na ba partenaires o cabinet ya Président National ya APARECO a pesaki conférence-débat na Bruxelles mokolo ya poso 27.08.2011.
Makambo mibale ezalaki na kati ya masolo :
Étamboli ya mboka
Maponami ya novembre.
Sango ya mboka ya monene? Mboka ezali na maboko ya bapaya , mbanda mutu, leka naba ministères, na mampinga, na ba compagnies ya leta.
Occupation ebanda lelo té. Banda ba noko, leka na Mobutu pe na Laurent-Désiré Kabila.
Lelo nde suka ya makambo. Ye meyi mokonzi ya mboka, mopaya!
Ezalaka te!
Po na yango, esengeli bana mboka balamuka, babunda pe na kobengana bapaya.
Ndenge nini tokoki kokende na maponami na bapaya ?
Débat makasi elandaki.
Bato nyonso bandimaki ke, esengeli bapaya bazonga epayi na bango. Esengeli tolamuka, tobunda po na ekolo.
mwa mituna ebele ezalaki
Banda 2004 ti lelo, tozozela kaka bapaya bakende na bango.
Maponami ekozala, soki toboyi ba partis ya opposition batya libaya, mabe te?
Ndenge moto monene lokola Tshisekedi azali candidat, akoleka pe! Soki bameki koloba que Tshisekedi apoli , wana esika yakobandela phénomène Tunisie té?
Bolanda mwana mboka Léonard Mulopo na bilili oyo ya lingala.
Bilili na ye ya falanse, ekolanda sima.
Cheik FITA
Bruxelles, 27 août 2011