Overblog Tous les blogs Top blogs Politique Tous les blogs Politique
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
MENU

Info en ligne des Congolais de Belgique

Kabila aboyi nzoto ya E. Tshisekedi ezonga Congo, kindoki te?

1er février 2017-1er février 2018: mbula mobimba yangoyo ewuti koleka banda Président Tshisekedi azongisaki molimo na ye epayi ya nkolo. Nano bakundi ye te.

Po na kokanisa ye, na Bruxelles bokutani mibale ekozala :

Ya liboso, na mokolo 1 février 2018, pembeni ya métro Porte de Namur , banda 16h00 ti 18h00, eko zala sit-in, 

Ya mibale eza misa na paroissse Notre Dame de Lourdes na Jette na mokolo ya poso 3 février 2018.

Ndenge nini moto monene lokola kondo Etienne Tshisekedi, ti lelo, bakundi ye te? Ya solo mitu ya bato oyo ba picler na kibokonzi na Kin, esalaka ? Ndenge nini bakoki kokoma mitema libanga boye? Likolo kaka ya mbongo bayibaka? 

Bana mboka oyo bafandi na poto bakanisi nini po na likambo yango?

Totambulaki na caméra na biso na quartier Matonge ya Bruxelles po na kotuna likambo wana,

Po na bato ebele, eza motema mabe, mabe penza, ya Kabila na batu na ye,  kindoki ko!

Ah mokili!

Ya mibale, eza bobangi ya soulèvement populaire. Bolanda na bilili mituna na biso...

IL-CdB

30 février 2018

Retour à l'accueil
Partager cet article
Repost0
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :