Lingomba EMECOJ asbl ya Bruxelles, ekambami na ya biso ndeko ya mwasi Aimée Tshilemba ebandi misala na ye ya
2013-2014.
Tokutanaki na Mama Aimée Tshilemba, mokambi ya asbl EMECOJ po apesa biso sango ya lingomba akambaka.
Apesi biso liyebisi oyo.
Lingomba EMECOJ esalaka misala ebele. Po na baboti oyo bazalaka na mwa kokoso po na kotanga na koloba lopoto, mama
Aimée Tshilemba ayebisi bango ete, mateya ezali kobanda mokolo 24 ya sanza oyo ya libwa.
Po na nini kotanga lisusu na kibokolo?
Po na mama Aimée Tshilemba, awa na poto, kotanga ezalaka na tango te. Esengeli na baboti nyoso bayeba kotanga na koloba
malamu. Boye, bakoki kosalisa bana na bango oyo babandi kelasi sika.
Tolanda mama Aimée na bilili.
Bruxelles, 10 septembre 2013
Cheik FITA